Nzela epai na Nzambe — Bangala


Copyright 2001, by Rose Stair Goodman. Cover art, Edwin B. Wallace. Meryl Esenwein, Elilingi na Libanda na buku moke oyyo mpe na pages 10, 12, 14, 16, 27, 29, 39, 41, 42, 44, 46, 47, and 48. The Bible text is used from BIBLIA, published by Societe Biblique du Zaire, 1995. Used by permission.
NZAMBE AJALISAKI MOKILI NA BISO —
1
NYOSO MPE BILOKO NYOSO NA BOMOI
Na ebandeli, Nzambe ajalisaki lora mpe mokili. –Ebandeli 1.1 Mpo na ye Nzambe
ajalisaki biloko nyoso na lora mpe na mokili. –Bakolosai 1.16a Bozwa bolamu ya
Nkolo, oyo asali lora mpe mokili! Lora ezali ya Nkolo ye moko; kasi apesi mokili
mpo na batu. –Njembo 115.15, 16 Mokili ezalaki malamu nyoso ntango Nzambe
apesaki yango epai na batu Otanga buku moke oyo mpo na koyeba nini esalamaki.
NZAMBE AJALISAKI BISO — 2
Bongo
Nzambe alobaki: "Tosala motu lokola elilingi na biso, azala lokola biso
mpenza. Azala mokonzi ya bambisi na mai,...likolo ya mokili mobimba." —Ebandeli
1.26a
MOTU AKUMAKI MOTU NA BOMOI —
3
Boye Nkolo Nzambe akamataki putulu ya mabele, asalaki na yango motu. Apemaki
pema ya bomoi na zolo na ye, mpe motu akumaki motu na bomoi. –Ebandeli
2.7
Nkolo Nzambe alobaki: "Ezali malamu te mpo na motu kotikala ye moko.
Nakosalela ye mosungi." Bongo Nkolo Nzambe alalisaki Adamu mpongi makasi.
Abimisaki mokuwa moko ya mpanzi na ye, mpe akangisaki mosuni na esika yango. Na
mokuwa oyo abimisaki na mpanzi ya Adamu, Nkolo Nzambe asalaki na yango mwasi,
mpe ayaki na ye epai ya Adamu. –Ebandeli 2.18a, 21, 22
ADAMU MPE EVA BATOSAKI NZAMBE TE —
4, 5
Esengeli
toyoka mongongo na Satana mbala moko te.
Nkolo Nzambe akamataki motu yango mpe atiaki ye na elanga ya
Edene mpo na kolona biloko kuna mpe mpo na kobatela yango. Apesi ye motindo oyo:
"Okoki kolia mbuma ya banzete nyoso ya elanga, kasi mbuma ya nzete oyo
epesaka mayele ya koyeba makambo malamu na mabe, okoki kolia yango te. Mpo ete
mokolo okolia yango, okokufa." –Ebandeli 2.15-17
NYOKA, NKOMBO NA YE LOKOLA DIABLE TO SATANA, ANDIMAKI BOKONZI NA NZAMBE TE MPE
ALOBAKI LOKUTA.
Bongo nyoka alobaki na mwasi: "Bokokufa solo te." Mwasi amonaki ete
nzete yango ezalaki malamu mpo na kolia, kitoko na kotala, mpe yango ezali
malamu mpo na kopesa mayele. Yango wana akamataki mbuma moko mpe alei, apesaki
mpe mobali oyo azalaki elongo na ye, bongo ye aliaki yango. –Ebandeli 3.4, 6
ADAMU MPE EVA BAKOKAKI LISUSU TE KOTIKALA KATI NA ELANGA —
6
Nkolo
Nzambe abengani motu na elanga ya Edene, mpe atindi ye asala mosala na mabele
oyo asalemaki na yango. Atiaki bakeruba na elanga...Bango bazalaki kopasapasa
mopanga...kopekisa ete motu moko te akuma penepene ya nzete oyo epesaka bomoi.
–Ebandeli 3.23b, 24b
MOKOLO ADAMA MPE EVA BASALAKI LISUMU — 7
EZALAKI MOKOLO NA MAWA MONENE MPO NA BATU NYOSO
Masumu ekotaki na mokili mokili mpo na motu moko, Adamu, mpe
epesaki kokufa. Boye kokufa esili kokweya likolo na batu nyoso.... –Baroma
5.12
Likambo na Kobosana Te:
Batu nyoso babotami na masumu mpe mokolo mosusu bakokufa mpo ete kokufa ekumaki
na njela na masusu. (Tanga Baroma 5.12 lesusu.)
NZAMBE APONAKI KOBIKISA BISO NA —
8
NZELA NA KOTINDA MWANA NA YE MOKO
"Ye
akobota mwana mobali oyo okobenga nkombo na ye Yesu, mpo ete Mwana yango
akobikisa batu na ye kati na masumu na bango." –Matayo 1.21
Mpo na kozala ndenge moko na batu, esengaki Mwana ya Nzambe abotami mototo moke na motu. Mpo ete makambo nyoso oyo ezali kati na Nzambe ekamataki nzoto kati na Kristo mpo na kozala na koonda mpenza kati na ye. –Bakolosai 2.9
YESU AZALI NZAMBE NA NZOTO NA BATU —
9
Liboso na Nzambe kojalisa mokili, Liloba ezalaki. Liloba yango ezalaki elongo na
Nzambe, mpe Liloba yango ezalaki Nzambe. Liloba ekumaki motu mpe afandaki kati
na biso. –Yoane 1.1, 14a
Oyo nyoso ekumaki mpo na kokokisa: "Mwasi oyo alali naino na mobali te
akozwa zemi mpe akobota mwana mobali, Oyo bakobenga nkombo na ye Emanuele."
(Nkombo oyo elingi koloba: "Nzambe azali elongo na biso".) –Matayo
1.22a, 23
Mpamba te baboti mwana mpo na biso; bapesi biso mwana mobali, bokonzi ekofandela
ye na mombeka. Bakopesa ye bankombo oyo: "Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya
nguya, tata na seko, Nkolo na kimia." –Isaya 9.5
YESU KRISTO — MOBOMA MALAMU NYOSO MPO NA BISO —
10
Kristo
azalaki na masumu moko te. –2 Bakorinto 5.21a
Ye asalaki masumu te. –1 Petero 2.22a
Motu akokaki kopesa moboma moko te MALAMU NYOSO ekokani mpo na kolongola masumu.
Mpo makila na ngombe mpe ntaba ekokaki moko te kolongola masumu. –Baebere
10.4
Yesu azali Mpate ya Nzambe. "Botala Mwana-Mpate na Nzambe oyo alongoli
masumu na mokili." –Yoane 1.29b
YESU APESAKI BOMOI NA YE MPO NA KOBIKISA BISO —
11, 12
Bakangaki Yesu na krusi ya nzete mpo ete batu mabe mingi bayinaki Ye. Kasi kala
Nzambe akanisaki kokufa na Ye. Yesu Ye mpenza apesaki bomoi na Ye mpo na
kobikisa biso na masumu na biso. Yesu alobaki, "Motu moko alongoli bomoi na
ngai te, kasi napesi yango lokola ngai moko nalingi. Nazali na bokasi na kopesa
yango, mpe nazali na bokasi na kokamata yango lisusu." –Yoane10.18a
MAKILA NA MPATE YA NZAMBE ABIKISI BISO
...Na motuya nini Nzambe asombaki bino na
yango,...Ezalaki te mpo na biloko oyo ekoki kobeba lokola mbongo to or.
Bofungolamaki mpo na likabo na motuya moene oyo na Kristo, ye azalaki lokola
mpate oyo babomi, kitoko, na mpota te. –1 Petero 1.18, 19
BOMA MOSUSU MOKO TE
AKOKI KOLONGOLA MASUMU
Tosili kokuma sembo liboso na Nzambe, eleki nyoso tokobi- ka na nkele na Nzambe mpo na ye. –Baroma 5.9b
"Yesu, kanisa ngai ntango okozonga kati na bokonzi na
yo." –Luka 23.42b
Motu mabe oyo andimaki Yesu mpe azwaki kobikisa.
"Nalobi na yo likambo ya solo: lelo okozala elongo na ngai na Paradisa." –Luka 23.43b Motu mabe oyo andimaki Yesu te boye azwaki kobikisa te.
Kristo akufaki mpo na biso ntango tozalaki naino batu na masumu. –Baroma 5.8b
BATU NYOSO OYO BANDIMI MWANA NA NZAMBE BAZALI NA BOMOI —
13
"Mpo ete Nzambe alingaki mokili mingi, boye ye apesaki mwana na ye moko,
boye motu na motu na kondima ye akokufa te, kasi akozala na bomoi na seko."
–Yoane 3.16
Mpo ye alongolaki biso na nguya na butu mpe akotisaki biso kati na
bokonzi na Mwana na ye na bolingo, mpo na ye tosili kobika mpo na makila na ye
mpe Nzambe asili kolimbisa masumu na biso. –Bakolosai 1.13, 14
"YE ASILI KOSEKWA!" — 14

Anzelu alobaki na basi:
"Bobanga te. Nayebi ete bozali koluka Yesu, motu oyo babetaki na krusi. Ye
azali awa te, ye asili kosekwa lokola ye alobaki. Boya, bomona esika oyo ye
alalaki na yango." –Matayo 28.5, 6
YESU ALONGOLAKI NA KOKUFA — 15
"Nazali motu na bomoi.
Nakufaki kasi sik'oyo nazali na bomoi mpo na seko. Nazali na nguya likolo na
kokufa mpe likolo na mokili na bakufi." –Emoniseli 1.18
"...Mpo ngai
nabiki mpe bino bokobika lokola." –Yoane 14.19b
Mpo ete Yesu asili koleka
kokufa mpe azali na mafungola na kokufa, esengeli tobanga kokufa lisusu te. Kasi
ata nabangi, natiaka motema epai na yo. –Njembo 56.4
(Tala bilaka na Nzambe na
page 46.)
YESU AKOKI KOBIKISA YO MPE AZALI KOBONDELA MPO NA YO
Mpo Yesu azali na
bomoi mpo na seko, ye akoki kobikisa, sik'oyo mpe na seko, batu oyo bazali koya
epai na Nzambe mpo na ye, mpo ye azali ntango nyoso na bomoi mpo na kobondela
Nzambe na ntina na bango. –Baebere 7.24a, 25b
BISO NA YO TOKOKI KOZALA NA BOMOI NA SEKO — 16
YO ozali kolanda
nzela nini?
Yesu Kristo azali NZELA epai na BOMOI na seko esikamoko na Nzambe.
Diable (Satana) azali nzela epai na KOKUFA mpo na seko. Mwana mobali oyo aponi
malamu nzela epai na bomoi na seko.
BOMOI NA SEKO (Eternal life)
KOKUFA NA SEKO (Eternal death)
OKOPONA NZELA NINI? — 17
"...Bopona lelo soki bolingi
kosalela nani...." –Yosua 24.15
"Bopona bomoi, mpo bino na bana na
bino bobika." –Kozongela Mibeko 30.19b
YESU AZALI NZELA EPAI NA BOMOI NA
SEKO
"Kobikisama ezwami bobele epai na ye moko. Mpo na mokili mobimba
Nzambe apesaki nkombo na motu mosusu moko te, oyo batu bakoki kozwa kobikisa mpo
na yango." –Misala 4.12
"Nkolo ezali ngai, bobele ngai moko.
Mobikisi mosusu azali te, bobele ngai." –Isaya 43.11
MPO NINI ESENGELI TOPONA YESU SOKO TOLINGI BOMOI NA SEKO? —
18-21
1.Yesu mpenza akumaki.
"...Ngai nakumaki mpo ete batu bazala na
bomoi...." –Yoane 10.10
2.Yesu mpenza alingaki biso mpe akufaki mpo na
biso.
Mwana na Nzambe...alingaki ngai, mpe amipesaki mpo na ngai. –Bagalatia
2.20b
Yesu akumaki motu, na nzoto mpe makila lokola biso, mpe ye azwaki nzoto na
batu....boye mpo na kokufa na ye, ye akoki kobo- 19 ma Satana
oyo azali na nguya na kokufa,...kobi- kisa batu oyo bazalaki baumbu ntango nyoso
na bo- moi na bango.... –Baebere 2.14b, 15
3. Bobele makila na Yesu, yango
moko, ezali nkisi mpo na masumu.
"Makila epesi kolimbisama na masumu mpo
yango ezali bomoi na motu." –Levitike 17.11b
Bongo makila na Yesu Mwana
na ye ezali kopetola biso na masumu nyoso. –1 Yoane 1.7b
Mpo na ye tosili
kobika mpo na makila na ye mpe Nzambe asili kolimbisa masumu na biso. –Bakolosai
1.14
4. Yesu mpenza asekwaki na kokufa.
Boye toyebi uta Kristo
asekwaki kati na bakufi, ye akokufa lisusu te, kokufa ezali na bokonzi likolo na
ye lisusu te. –Baroma 6.9
Ye asili kokufa mpo na batu nyoso mpo ete batu oyo
bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi mpo na bango mpenza te, kasi bazala na
bomoi mpo na motu oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango. –2 Bakorinto 5.15
Yesu alobaki: "Mpo ngai nabiki mpe bino bokobika lokola." –Yoane
14.19b
5. Eseengeli tozala na Molimo na Kristo kati na biso mpo na
kosekwisa mpo na bomoi na seko.
Kristo azali kati na bino, mpe ye apesi elikia
ete bokozwa nkembo na Nzambe. –Bakolosai 1.27b
Soki Molimo na Nzambe, oyo
asekwisaki Yesu kati na bakufi afandi kati na bino,...Motu oyo asekwisaki Kristo
kati na bakufi akopesa bino bomoi mpo na nzoto na bino oyo ezali eloko na
kokufa,... mpo na Molimo na ye oyo azali kofanda kati na bino. –Baroma 8.11
OYEBA SOLOSOLO ETE MOLIMO NA KRISTO AFANDI KATI NA YO
Motu oyo azali na Molimo
na Kristo te, azali motu na Kristo te. –Baroma 8.9b
YESU ALINGI BANA NYOSO — 22, 23
Nsima na oyo ye amemaki bana na maboko na ye, atiaki maboko
likolo na bango moko na moko, mpe apambolaki bango. –Mako 10.16
"Nayebi Yesu alingi ngai; Biblia elakisi ngai boye."
Kasi Yesu abengaki bana mike epai na ye, mpe alobaki:
"Botika bana mike koya epai na ngai! Bope- kisa bango te, mpo ete Bokonzi
na Nzambe ezali mpo na batu bazali na motema lokola bango." –Luka 18.16
"Bobele boye, Tata na bino na lora alingi te moko na bana mike oyo
abunga." –Matayo 18.14
Soko ozali motinda nini, soko ofandi wapi, Yesu
alingi yo mpe akufaki mpo na yo. Yesu azali na mposa ete olinga ye lokola. Okoki
kotalisa bolingo na yo mpo na Yesu na nzela ya kotosa ye. "Soki bolingi
ngai, bokotosa mibeko na ngai." –Yoane 14.15
Mwana ayebanaka na makambo
ye asalaka. –Maloba ya Mayele 20.11a
NDENGE NINI OKOZWA NJELA EPAI NA NZAMBE — 24-28
1. Ondima ete osili
kosala masumu (tala page 7).
Batu nyoso basili kosala masumu mpe basili kozanga
nkembo na Nzambe. –Baroma 3.23
2. Yaka epai na Nzambe na nzela na Yesu Kristo.
Mpo ete Nzambe azali moko, mpe mosanganisi azali moko kati na Nzambe mpe batu,
ye Yesu Kristo. –1 Timoteo 2.5
Mpo na oyo, ye [Yesu] akoki kobikisa,...batu
oyo bazali koya epai na Nzambe mpo na ye. –Baebere 7.25a
Yesu alobaki: Mpe
motu na koya epai na ngai, nako-bwaka ye soki moke te. –Yoane 6.37b
3. Obongola motema, tika masumu na yo.
"Boye bobongwa
mpe bozonga epai na Nzambe mpo ye alongola masumu na bino." –Misala 3.19
Mokonzi aumelaka...mpo ye alingi te motu moko... akufa, kasi ye alingi ete nyoso
babongola motema. –2 Petero 3.9
4. Bimisa masumu na yo epai na Yesu.
Koma awa maloba na 1 Yoane 1.9a oyo okozwa likolo na
elilingi likolo na maboko ya kobondela na page 25.
______________________________________________
______________________________________________
______________________________________________
______________________________________________
5. Tika masumu na yo.
Motu oyo abombaka mabe na ye, bomoi na
ye ebo-ngaka te; kasi motu oyo andimaka mabe na ye mpe atikaka yango, Nzambe
alimbisaka ye. –Maloba ya Mayele 28.13
Tika mabe mpe sala malamu. –Njembo
37.27a
6.
Ndima Yesu Kristo na motema nyoso.
Otatoli na monoko na
yo liboso na batu nyoso ete Yesu azali mokonzi, mpe soki ondimi na motema nyoso
ete Nzambe asili kosekwisa Ye kati na bakufi, okozwa kobikisa. –Baroma 10.9b
"Ndima Mokonzi Yesu na motema, mpe okozwa kobikisa, yo mpe libota na
yo." –Misala 16.31b
Mpo ezali mpo na ngolu na Nzambe bino bosili kobika, na nzela na kondima....Ezali likabo na Nzambe, ezali te mpo bosalaki makasi mpo na kozwa yango, boye motu moko te akoki komipesa lokumu. –Baefeso 2.8, 9
7. Yamba Yesu Kristo kati na motema mpe bomoi na yo.

Yo
moko okoki kofungola mwango na motema na yo na koyamba Yesu. Yesu alobaki:
"Yoka, nazali kotelema na ekuke na ndako mpe nazali kobeta yango. Soki motu
ayoki mongongo na ngai, mpe afungoli ekuke na ndako, nakokota epai na ye,
nakolia elongo na ye mpe ye akolia elongo na ngai." –Emoniseli 3.20
Kasi
batu mosusu bayambaki ye, mpe bandimaki ye. Ye apesaki bango ndingisa na kozala
bana na Nzambe. –Yoane 1.12
MOKAMBI MPO NA KOBONDELA — 29
Soki osili kobondela liboso te mpe
ozali na bosenga na
kozwa kosalisa mpo na kobondela, okoki kotala libondeli oyo
lokola mokambi.
Nkolo Yesu, Napesi Yo mersi mpo ete okufaki mpo na ngai likolo
na krusi myo na kolongola masumu na ngai. Nazali na mawa zambi na makambo mabe
nyoso nasili kosala. Nasengi Yo kokota motema na ngai mpe kofanda kuna seko.
Sikawa nazali kondima ete okopetola motema na ngai. Nakamati Yo lokola Mobkisi
mpe Mokonzi na ngai mpenza. Nabondeli na nkombo na yo. Amena.
SOKI YESU AZALI NA MOTEMA NA YO, OZALI NA BOMOI NA SEKO —
30
Nzambe apesaki biso bomoi ya seko, bomoi oyo ezali kati na Mwana na ye. Motu oyo
azali na Mwana, azali na bomoi yango. –1 Yoane 5.11b, 12a
"...Motu na
koyoka maloba na ngai, mpe na kondima motu oyo atindaki ngai...asili kolongwa na
kokufa mpe asili koleka na bomoi." –Yoane 5.24b
Esika nzoto ekufi, ozali
elongo na Nkolo (2 Bakorinto 5.8). "Kristo azali kati na bino, mpe ye apesi
bino elikia ete bokozwa nkembo na Nzambe." (Bakolosai 1.27b).
Soki osili
kosenga Yesu kobongola masumu na yo, mpe ondimi Yesu lokola Mobikisi na yo, koma
nkombo na yo na line na nse:
NDENGE NINI OKOKI KOLANDA YESU NA KOTIKA TE — 31
Mikolo nyoso,
tanga baverse mosusu na Biblia (Maloba na Nzambe) mpe bomba baverse mosusu na
motema na yo. Likambo oyo ekosalisa yo. (Baverse mingi ezali kati na buku moke
oyo.) Makomi nyoso ebimaki na Nzambe mpe ekokani mpo na kolakisa likambo ya
solo, kopamela libunga, kobongisa mabe, mpe kotalisa nzela na ezaleli sembo. –2
Timoteo 3.16
SAA NINI OLINGI, OLOBANA NA YESU KATI NA MABONDELI — 32
Pesa
Yesu mersi mpo na makambo malamu nyoso kati na bomoi na yo. Sanzola Ye mpo na
makambo Ye asili kosala mpo na yo mpe mpo na kobikisa yo. Bondela na ntina na
bosenga na yo. Bondela na nkombo na Yesu.
Ye akoyoka biso soki tosengi eloko
ekokani na mokano na ye. –1 Yoane 5.14b
"Tata akopesa na bino makambo
nyoso bokosenga epai na ye na nkombo na ngai." –Yoane 16.23b
Bobondela
mpo na batu na konyokola bino. –Matayo 5.44b
LIBONDELI OYO YESU ALAKISAKI BAYEKOLI NA YE — 33
(Moyekoli azali
motu oyo alandi Yesu.)
Yesu alakisaki bayekoli na Ye kobondela boye:
"‘Tata
na biso oyo azali na lora, Esengeli batu bapesa nkombo na yo lokumu. Esengeli
Bokonzi na yo eya. Esengeli makambo olingi esalema na mokili lokola basalaka
yango kuna na lora. Pesa biso lelo biloko ya kolia oyo ekokani. Limbisa biso na
mabe oyo tosili kosala, lokola tolimbisaka mabe oyo batu basili kosala epai na
biso. Kamba biso kati na komekama te, kasi bikisa biso na maboko na motu mabe.
[Mpamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali na yo mpo na seko. Amen.']" –Matayo
6.9b-13
Esengeli obomba libondeli oyo kati na motema na yo. Mbala mingi bandimi
babondeli boye esikamoko na mangungu.
MIBEKO ZOMI NA NAMBE ELAKISI BISO — 34, 35
NDENGE NINI TOSALA KATI
NA BOMOI NA BISO
(Kobima sapita 20)
Mibeko minei na liboso ezali na ntina na
bolingo na biso mpo na Nzambe
1. "Okumisa banzambe mosusu te, bobele
ngai."
2. "Osala bikeko te mpo na kokumisa, to eloko moko ekokani na
biloko....Ogumbana liboso na banzambe ya ndenge wana te, mpe okumisa bango
te."
3. "Obenga nkombo ya Nkolo, Nzambe na yo, mpambampamba te."
4."Okanisa mokolo ya kopema, mpo na kokumisa yango bosantu."
Mibeko
motoba na kolanda ezali na ntina na bolingo na biso mpo na batu
MIBEKO ZOMI (eteni na mibale)
5. "Otosaka tata mpe
mama na yo."
6. "Oboma motu te."
7. "Osala pite te."
8.
"Oyiba te."
9. "Oloba lokuta na nkombo ya moninga na yo te."
10. "Olula te...eloko na maninga ra yo."
KOTOSA NZAMBE EPESAKA
BIYANOLI NA MABONDELI NA BISO
Tozwaka na maboko na ye biloko nyoso oyo tozali
kosenga epai na ye, mpo tozali kotosa mibeko na ye, mpe tozali kosala makambo
oyo esepelisaka ye. –1 Yoane 3.22
MIBEKO MIBALE MONENE KOLEKA NYOSO — 36
Bolingo mpo na Nzambe
1.
Yesu ayanolaki ye: "‘Esengeli olinga Mokonzi Nzambe na yo na motema na yo
nyoso, na molimo na yo nyoso mpe na makanisi na yo nyoso.' Oyo ezali mobeko ya
liboso, monene koleka." –Matayo 22.37, 38
Bolingo mpo na batu
2.
"Mpe oyo ezali mobeko ya mibale, yango nde ezali monene lokola: ‘Esengeli
olinga moninga na yo lokola yo mpenza.'" –Matayo 22.39
Mibeko Zomi nyoso
(pages 34 mpe 35) ezali kati na Mibeko Mibale Monene na Koleka.
Bolingo (love)
BOLINGO EZALI MONENE KOLEKA NYOSO — 37, 38
"Sapita Monene na
Bolingo"
(1 Bakorinto 13.1-8, 13)
1 Soki nazali na mayele na kosolola
lokota ya batu mpe lokota ya baanzelu, kasi soki nazali na bolingo te, maloba na
ngai ekozala bobele lokola mbonda na kosala makelele to lokola ngelengele oyo
ezali kolela. 2Soki nazali na likabo ya kosakola lokola nebi, soki nazali na
boyebi nyoso mpe soki nayebi makambo ebombami nyoso, soki nazali na kondima oyo
ekokani na kosisa ngomba, kasi soki nazali na bolingo te, nazali mpamba mpenza.
3Soki nakaboli misolo na ngai nyoso, soki natiki bobele nzoto na ngai kozika,
soki nazali na bolingo te, oyo ekopesa ngai litomba moko te. 4Bolingo ezali na
motema molai, bolingo ezali na boboto, bolingo ezali na lokoso te, ekomipesaka
lokumu te, ezali na motema na lolendo te. 5Bolingo esalaka likambo na nsoni moko te, bolingo elukaka
bolamu na ye mpenza te, bolingo esilikaka te, bolingo ebombaka nkanda na motema
te. 6Bolingo esepelaka mpo na likambo mabe te, kasi esepelaka mpo na likambo ya
solo. 7Bolingo ememaka makambo nyoso, epesaka biso kokengela kati na makambo
nyoso kondima, elikia mpe motema molai. 8Bolingo ezali na seko, makambo nyoso na
kosolola lokola nebi ezali bobele mpo na ntango moke, likambo na kosolola lokota
godi ekosuka, boyebi ekosila.
13Sik'oyo, makambo misato oyo ezali kotikala:
kondima, elikia mpe bolingo. Kasi kati na makambo misato oyo, likambo na koleka
na monene ezali bolingo.
NZAMBE AZALI BOLINGO
Nzambe azali bolingo, motu oyo
afandi kati na bolingo azali kofanda kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kofanda
kati na ye. —1 Yoane 4.16b
YESU ALINGI OTATOLA EPAI NA BATU MOSUSU — 39
(kati na ndako na
yo, na kelase, na ndako na Nzambe, bipai nyoso)
Yesu alobaki: "Zonga na
mboka na yo, kati na libota na yo, osolola bango makambo nyoso Mokonzi na yo
asili kosala na ngolu na ye mpo na yo." –Mako 5.19b
NDENGE NINI OKOKI KOYEBA MWANA NA NZAMBE NA SOLO — 40, 41
"Bobele boye, bokoyeba banebi ya lokuta mpo na misala na bango." –Matayo
7.20
"Kasi mbuma na Molimo ezali bolingo, esengo, kimia, motema molai,
kosalisa batu, boboto, bosembo, motema na mwana, koleka nzoto." –Bagalatia
5.22, 23a
"Mpamba te soki bokolimbisa mabe batu basalaki epai na bino, Tata
na bino oyo azali na lora akolimbisa mabe na bino lokola." –Matayo 6.14
MAKAMBO 7 NZAMBE AYINI
Miso oyo etalaka na lolendo, monoko oyo ebimisaka maloba
ya lokuta, maboko oyo ebomaka batu basali eloko moko te, motema oyo ekanisaka
koyokisa batu mpasi, makolo oyo ekendeke mbango mpo na kosala mabe, temwe oyo
alobaka makambo ya lokuta, motu oyo atiaka songisongi na kati ya bandeko. –Maloba
ya Mayele 6.17-19
MISALA NA NZOTO:
...Komonana kati na ekobo, ...kosambela
bikeko, na mayele na mazi, koyinana, koswana,...nkele, kozuna esika
monene....kolangwa na masanga...mpe...misala mabe na ndenge oyo...batu na kosala
makambo ndenge yango bakozwa bokonzi na Nzambe te. –Bagalatia 5.19-21
...Babali na kosala pite elongo ...batu na moyibi, batu na lokoso. –1
Bakorinto 6.9, 10a
TIKA YESU ATONDISA YO NA MOLIMO NA YE MPE APETOLA YO
"Batu mosusu kati na bino bazalaki boye. Kasi bosili kozwa kopetola na
masumu,...mpo na kozala batu na Nzambe, bosili kokuma sembo liboso na Nzambe na
nkombo na Mokonzi Yesu Kristo mpe mpo na Molimo na Nzambe na biso." –1
Bakorinto 6.11
Mbuma na Molimo Santu (Fruit of the Spirit)
Misala na Nzoto (works of the flesh)
LIFERO EZALI SOLO ESIKA — 42
(Tanga Luka 16.19-28.)
Oyeba solo
ozali kondima Yesu Kristo. Ye akokoma nkombo na yo kati na Buku na Bomoi na Ye.
Soki bakutaki nkombo na motu kati na buku na bomoi te, babwakaki ye na libulu na
moto. –Emoniseli 20.15
BOBELE YESU YE MOKO AZALI NZELA EPAI NA NZAMBE — 43
Nzambe
apesaki biso bomoi ya seko, bomoi oyo ezali kati na Mwana na ye. –1 Yoane
5.11b
Mpo ete lifuti na masumu ezali kokufa, kasi likabo oyo Nzambe apesi mpamba
ezali bomoi ya seko kati na lisanga elongo na Yesu Kristo Mokonzi na biso. –Baroma
6.23
Motu na kondima Mwana azali na bomoi na seko. Motu na kotosa Mwana te
akozala na bomoi yango te, kasi nkele na Nzambe ezali likolo na ye. –Yoane
3.36
Yesu alobaki na ye: "Ngai nazali nzela, mpe solo, mpe bomoi. Motu moko
te akoki kokende epai na Tata na ngai na nzela mosusu, soki ye aleki bobele epai
na ngai te." –Yoane 14.6
LORA EZALI SOLO ESIKA — 44
Na Emoniseli sapita 21 totangi ete
kati na likambo lokola ndoto, Yoane amonaki lora na sika mpe mokili na sika.
"Ye akopakola mai na miso nyoso na miso na bango. Kokufa ekozala lisusu te,
mawa, to kolela, to mpasi ekozala lisusu te. Biloko na liboso ekosila."
Bongo motu oyo azalaki kofanda na kiti na mokonzi alobaki: "Sik'oyo, nasali
biloko nyoso ya sika." –Emoniseli 21.4, 5a
Yoane amonaki lokola Vile
Santu, bobele Yerusalema, kokita na lora, kouta epai na Nzambe. Mpe vile mpenza
ezalaki na or kitoko, petwa lokola talatala. Basalaki mabanga na makolo na
lopango na lipombo na ndenge nyoso na mabanga na motuya mingi. –Emoniseli
21.18b, 19a
YESU ASILI KOKENDA KOBONGISA ESIKA — 45
MPO NA BATU NYOSO OYO
BANDIMI YE
Yesu alobaki na bango: "Botika mitema na bino na komitungisa te.
Bondima Nzambe mpe bondima ngai lokola. Bisika na kofanda ezali mingi na ndako
na Tata na ngai. Nakei kobongisa esika mpo na bino. Soki ezalaki boye te, mbele
nasili koloba na bino. Mpe nsima na kokende na kobongisa esika mpo na bino,
nakozonga lisusu mpo na kokamata bino epai na ngai, boye esika ngai nazali bino
mpe bokozala." –Yoane 14.1-3
LOBA NSANGO MALAMU EPAI NA BATU MOSUSU
Yesu
alobaki: "Bokende na mokili mobimba mpe bosakola Nsango Malamu epai na batu
nyoso." –Mako 16.15b
BILAKA NA NZAMBE EPAI NA BANA NA YE — 46
"Nakotika yo soki
moke te, nakolongwa epai na yo soki moke te." –Baebere 13.5b
Mpo Nkolo
akopesa motindo na baanzelu na ye, babatela yo bisika nyoso oyo okokende. –Njembo
91.11
"Mpe motu moko te akoki kobotola bango na maboko na Tata." –Yoane
10.29b
"Nakozala elongo na bino mikolo nyoso kino nsuka na mokili."
–Matayo 28.20b
Banga te mpasi oyo okozwa....Zala motu na kobongwana te kino
kokufa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi. –Emoniseli 2.10
"Benga ngai mpe
nakopesa yo eyano." –Yeremia 33.3a
YESU AKOZONGA LISUSU — 47
Batu-ayoso bakosekwa na kokufa.
"Mpo ntango ezali koya, ntango bakufi oyo bazali na lilita bakoyoka
mongongo na Mwana ya Motu, mpe bakobima na lilita na bango. Batu oyo basili
kosala malamu, bakosekwa mpo na kozwa bomoi. Batu oyo basili kosala mabe,
bakosekwa mpo na kozwa ngwanga." –Yoane 5.28b, 29
Na liboso bakufi kati
na Kristo bakosekwa.
Nsima yango, biso oyo tokozala naino na bomoi na ntango
yango. Nzambe akobenda biso elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na
Mokonzi kati na mopepe. Boye, tokozala elongo na Mokonzi mpo na seko. –1
Batesalonike 4.17
"Bobondela mpe bolala te, mpo boyebi te mokolo nini
ntango yango ekokuma." –Mako 13.33b
YESU AKOYA NDENGE NINI? — 48
Botala ye azali koya kati na
mapata! Batu nyoso bakomona ye. –Emoniseli 1.7a
Keba na bakristo na lokuta mpe
banebi na lokuta.

"Soki motu moko alobi na bino: ‘Botala Masiya azali
awa!' to ‘Ye azali kuna!' bondima ye te. Soki balobi na bino: ‘Botala ye
azali na esobe!' bokende kuna te. Mpe soki balobi na bino: ‘Botala ye azali
kobombana awa!' bondima yango te." –Matayo 24.23b, 26b
YESU AKOYA NOKI
KATI NA MAPATA NA LORA
"Bongo mitinda nyoso...bakomona ngai Mwana ya Motu
koya kati na mapata na lora elongo na nguya mingi mpe na nkembo mingi." –Matayo
24.30b
LOYEMBO NA MOBATELI
(Njembo 23)
1 Nkolo azali mobateli na ngai, nakozanga eloko moko te.
2 Apemisaka ngai na kati ya matiti ya mobesu. Akambaka ngai
penepene na mai ya kimia. 3 Apesaka ngai nguya, Atambwisaka ngai na banzela ya
malamu, mpo na nkombo na ye.
4 Ata nazali kotambola na libulu na molili ya kufa, nakoki kobanga eloko moko
te. Mpamba te yo ozali elongo na ngai; nzete na yo mpe lingenda na yo ezali
kosalisa ngai. 5 Otandelaka ngai mesa na miso ya banguna na ngai. Opakoli mutu
na ngai na mafuta, mpe kopo na ngai etondi mpenza.
6 Solo bolamu mpe ngolu ekolanda ngai ntango nyoso na bomoi na ngai, mpe
nakofanda na ndako ya Nkolo mpo na seko.
If you are interested in receiving additional Scripture booklets, write to the publisher in English at the address below or order online:
World Missionary Press, Inc.
P.O. Box 120
New Paris, Indiana 46553-0120 U.S.A.
World Missionary Press Home Page | Go to the Top of This Page