World Missionary Press

BOMOI YA KOKAMWA YA YEZU KRISTO
Kinshasa Lingala


BOMOI YA KOKAMWA YA YEZU 

Yezu Kristo azali te bobele moto monene ya kala, oyo azalaki na bomoi mpe akufaki kala. Maloba ya Nzambe eyebisi Ye azali Nzambe Mosali na biloko nyonso. Ye afandaki na miso na mokili likola moto mpo ye akoka kopesa makila ya bomoi na Ye mpo na kobikisa bato ya masumu, alongola bango na bokonzi na masumu mpe Satana mpe liwa. Ye azali na bomoi lelo mpe apesaka bomoi na seko epai na batu nyonso bayii na Ye. Koyamba to Koboya Yezu Kristo ezali likambo na bomoi to liwa. "Moto oyo asangani na Mwana ya Nzambe te, azali na bomoi te" (1 Yoane 5:12). "Bato bakoki kobika bobele epai na ye, mpamba te awa na mokili mobimba Nzambe apesa na bato nkombo ya moto mosusu te mpo tobika na yango" (Misala 4:12). Malamu ete oyebana na Nzambe ntango ozali koyekola Bomoi ya Kokamwa ya Yezu Kristo. "Bomoi ya seko ezali boye: koyeba yo, Nzambe ya solo, kaka moko, mpe koyeba Yezu Kristo oyo otindaki" (Yoane 17:3). Osili kozwa Yezu kati na motema na yo? Soki te, sala yango lelo.

Text reprinted from the New Testament in Kinshasa Lingala, 1977 Edition, by permission of the United Bible Societies Africa Regional Centre, Nairobi, Kenya.


YEZU AZALAKA LIBOSO YE ABOTAMI — 1 

Na ebandeli ya biloko nyonso, Liloba ezalaki. Liloba ezalaki na Nzambe. Liloba ezalaki Nzambe. Solo, ye azalaki na Nzambe na ebandeli. Nzambe asalaki biloko nyonso na ye, eloko moko te ezangi kosalama na ye. Liloba akomi moto, mpe azalaki na kati na biso. Ye atondaki na bolamu ya Nzambe mpe na makambo ya solo. —Yoane 1:1-3, 14a

Na ntango ya kala Nzambe alobelaki bankoko na biso mbala na mbala mpe ndenge na ndenge na lisalisi ya basakoli na ye. Kasi na mikolo oyo ya nsuka, Mwana na ye nde moto ayaki kolobela biso makambo euti na Tata na ye. Nzambe asalaki mokili mobimba na ye mpe aponaki ye mpo azala Nkolo ya biloko nyonso. —Baebreo 1:1, 2

Yezu alobi na bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: liboso ete Abrahami abotama, `Ngai Nazali.'" —Yoane 8:58

Kasi mpo na Mwana na ye, Nzambe alobaki: "E Nzambe, Kiti na yo ya Bokonzi ekotikala seko." Nzambe alobaki lisusu: "Mokonzi, na ebandeli yo moto osalaki mokili oyo mpe osalaki Likolo na maboko na yo moko." —Baebreo 1:8a, 10


BANGANGA NZAMBE BASAKOLAKI YA LIBOSO — 2
MAKAMBO YA BOMOI YA YEZU 

"Bongo Nkolo ye moko akopesa bino elembo: Tala, mwana mwasi akobota mwana mobali mpe akobianga nkombo na ye, Imanuele." —Yisaya 7:14

"Mpe yo, Beteleme Efelata, ojali moke kati na mabota na Yuda; uta na yo moko akobima mpo na ngai oyo akojala mokolo- na-mokili kati na Yisalaele; ebandeli na ye ejalaki kalakala, longwa na mikolo na liboso." —Mika 5:2

"Jambi mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonji ekojala likolo na libeka na ye, nkombo na ye akobiangama ete, Mosungi na kokamwa, Njambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimia. Kofukuluka na bokonji na ye mpe na kimia, ikosuka te." —Yisaya 9:6, 7a

Atiolamaki mpe aboyamaki na bato, moto na mawa mpe oyo amesanaki na mpasi; Solo akumbi mpasi na biso mpe amemi mawa na biso; nde totangi ete apesameli etumbu ete abetami na Njambe mpe anyokelami. Kasi ajokisami mpo na masumu na biso, atutami mpo na mabe na biso. —Yisaya 53:3a, 4, 5a


YEZU ATIKAKI LORA MPO AKOMA MOTO — 3 

Yezu Kristo,...Ye azali ndenge moko na Nzambe, akokani mpenza na ye. Nzokande atalaki yango lokola eloko ya kowela te. Kasi atikaki lokumu na ye, andimaki kozala ndenge moko na moumbu. Akomaki lokola bato nyonso, mpe amonanaki na nzoto ya bomoto. Amikitisaki mpenza, mpe atosaki tee na liwa, ata liwa ya ekuruze. —Filipi 2:5b-8

Nzambe asalaki Adami ya liboso na mabele, azalaki moto ya nse, kasi Kristo, Adami ya mibale, autaki na Likolo. —1 Korinto 15:47

Ntango Kristo alingaki koya awa na nse, alobelaki Nzambe: "Yo olingaka te mabonza ya makila to makabo ya mbuma, kasi obongisaki nzoto na ngai lokola makabo." —Baebreo 10:5b

Mpo bana wana bazali bato, bongo ndenge moko mpe Yezu akomaki moto lokola bango. Asalaki bongo mpo ete na lisalisi ya liwa na ye asilisa nguya ya Satana oyo azali na bokonzi ya liwa, mpe alongola baoyo bazali lokola baumbu awa na nse mpe bazali kobanga liwa. —Baebreo 2:14, 15


NTINA OYO YEZU AKANAKI KOKOYA NA MOKILI — 4

"Mpo Mwana ya Moto ayaki te mpo bato basalela ye, kasi ayaki kosalela bango mpe kopesa bomoi na ye mpo na kobikisa bato ebele." —Marko 10:45

"Mpo Mwana ya Moto ayei koluka mpe kobikisa bato oyo babungaki." —Luka 19:10

Nzambe atindaki Mwana na ye awa na mokili mpo akatela bato etumbu te, kasi mpo abikisa bango. —Yoane 3:17

Yesu azongisi: "...Ngai nabotamaki mpe nayaki awa na mokili na ntina ete nasakola makambo ya solo. Bato nyonso oyo bandimaka makambo ya solo, bakoyoka maloba na ngai." —Yoane 18:37b

Yezu Kristo ayaki awa na nse mpo na kobikisa bato ya masumu. —1 Timoteo 1:15b

Kasi ntango mokolo oyo Nzambe atiaki ekokaki, atindaki Mwana na ye: abotamaki na mwasi, mpe azalaki kotosa Mibeko ya Bayuda. Nzambe atindaki ye mpo na baoyo bazalaki baumbu ya mibeko, mpo afutela bango nyongo, mpe bongo tokoka kokoma bana na ye. —Galatia 4:4, 5


NA NGUYA YA NZAMBE MARIA AZWAKI ZEMI YA YESU — 5

Nzambe atindi anzelu Gabriele na mboka moko ya Galilea, nkombo na yango Nazareti, epai ya mwana mwasi moko oyo ayebi naino nzoto ya mobali te, nkombo na ye Maria. Moto moko, nkombo na ye Yozefi, alingaki kobala ye. Yozefi azalaki moto ya libota ya Davidi. Bongo anzelu alobi na ye: "Maria, tika kobanga! Ozwi bolamu ya Nzambe. Okozwa zemi, okobota mwana mobali; okopesa ye nkombo Yezu. Akozala moto monene mpe bakobenga ye Mwana ya Nzambe ya Likolo....Bokonzi na ye ekozala na nsuka te." Maria azongiseli anzelu: "Ngai nayebi naino nzoto ya mobali te, ndenge nini makambo wana ekoki kosalama?" Anzelu alobi na ye: "Molimo Mosanto akoyela yo, mpe nguya ya Nzambe ya Likolo ekozipa yo. Bongo mwana wana akozala mosanto mpe bakobenga ye Mwana ya Nzambe." —Luka 1:26b, 27, 30-35

"Yozefi, mwana ya Davidi, kobanga te mpo na kobala Maria, mpamba te azwi zemi na nguya ya Molimo Mosanto." —Matayo 1:20b


KOBOTAMA YA YEZU 

...Mokonzi monene ya Roma Oguste apesaki mobeko ete bakoma bankombo ya bato nyonso ya mokili na ye....Bongo bato nyonso bakei kokomisa bankombo, moto na moto na mboka na ye. Yozefi mpe alongwe... akei na Betelemi....Akendeki kokomisa nkombo elongo na Maria, mwana mwasi oyo ye alingaki kobala. Maria azalaki na zemi....Aboti mwana mobali, mwana na ye ya liboso; alingi ye na bilamba mpe alalisi ye na kesi oyo batiaka bilei ya banyama, mpamba te esika ezalaki te mpo na bango na ndako ya bapaya. Na mokili wana babokoli ya bameme bazalaki kuna mpe bazalaki kolala na esobe mpo na kokengela bameme na bango. Anzelu moko ya Mokonzi abimeli bango mpe Mwinda ya Mokonzi engengeli bango. Bayokaki nsomo mingi. Kasi anzelu alobi na bango: "Bobanga te, nayeli bino Nsango Malamu oyo ekosepelisa ekolo mobimba ya Israele: na butu ya lelo baboteli bino Mobikisi na mboka ya Davidi. Ye azali Kristo mpe Mokonzi.... Bokomona mwana moke balingi ye na bilamba, mpe alali na kesi oyo batiaka bilei ya banyama." —Luka 2:1-12


BOMWANA YA YEZU —

Ntango mwana akokisi mikolo mwambe, bakati ye mpe bapesi ye nkombo Yezu; oyo ezali nkombo anzelu ayebisaki Maria liboso azwa zemi. —Luka 2:21

Moto moko azalaki na Yeruzalemi, nkombo na ye Simeoni. Ye moto malamu, azalaki kotosa Nzambe mpe kozela mokolo Nzambe akolongola Israele mawa. Molimo Mosanto azalaki na ye, mpe ayebisaki ye ete akokufa te liboso amona Mesia oyo Nzambe akotinda. Molimo Mosanto amemi Simeoni na Ndako ya Nzambe. Ntango baboti ya Yezu bakei na mwana mpo na kokokisa makambo Mibeko etindaka, Simeoni akamati ye na maboko, atondi Nzambe mpe alobi: "Mokonzi, sikoyo okokisi makambo oyo olakaki, bongo okoki kotika ngai mosali na yo nakufa na esengo. Mpamba te namoni Mobikisi na miso na ngai moko, oyo otindi mpo na bato nyonso ya mokili. Ye azali mwinda oyo akomonisa yo na bikolo nyonso, mpe akopesa lokumu na bato na yo ya Israele." Tata na mama ya Yezu bakamwaki mingi awa bayoki makambo Simeoni alobaki mpo na mwana. —Luka 2:25-33


BAKUMISI YEZU — 8

Yezu abotami na mboka Betelemi, na mokili ya Yudea, na ntango Erode azalaki mokonzi ya Yeruzalemi. Kaka na mikolo wana banganga oyo batalaka minzoto balongwe na Este mpe bakomi na Yeruzalemi. Batuni bato: "Wapi mwana oyo abotami mpe oyo azali mokonzi ya Bayuda? Tomonaki monzoto na ye na Este, mpe toyei kokumisa ye."

Ntango mokonzi Erode ayoki boye, azalaki motema likolo, ye na bato nyonso ya Yeruzalemi. Abengi bakonzi ya banganga- Nzambe mpe balakisi ya Mibeko ya Bayuda. Bongo atuni bango epai wapi Mesia asengeli kobotama. Bango bazongiseli ye: "Na Betelemi, mboka ya Yudea. Mpo mosakoli akomaki boye."

Awa bayoki maloba ya mokonzi bakei. Bongo bamoni monzoto oyo bamonaki liboso na Este. Yango ezalaki kokende liboso na bango, kasi ntango ekomi na likolo ya ndako oyo mwana azalaki, etelemi. Bayoki esengo mingi ntango bamonaki monzoto wana. Bakoti na ndako mpe bamoni mwana, na mama na ye Maria. Bafukami mpe bakumisi mwana. —Matayo 2:1-5, 9-11a


SATANA AYINAKI YEZU LIBOSO YEZU ABUTAMI —

Mpe elembo mosusu emonanaki na Likolo: Nyama moko monene ya nsomo lokola nyoka mpe ya motane [Satana]! Yango ezalaki na mitu nsambo, maseke zomi mpe motu moko moko ezalaki na ekoti ya bokonzi likolo na yango. Mokila na ye ezalaki kolongola eteni ya misato ya minzoto ya Likolo, mpe kobwaka yango na mokili. Nyama wana ya nsomo azali lokola nyoka etelemi liboso ya mwasi oyo alingaki kobota, mpo alia mwana na ye ntango akobotama. Mpe mwasi yango aboti mwana mobali oyo akotambwisa bikolo nyonso, lokola mobokoli ya bameme atambwisaka bameme na ye, kasi nzete na ye nde ezali ya ebende. —Koyebisa Sekele 12:3-5a

Anzelu ya Nzambe abimeli Yozefi na ndoto, mpe alobi na ye: "Telema, kamata mwana na mama na ye; kima na Ezipte. Fanda kuna tee ntango nakoloba na yo ete zonga, mpo Erode azali koluka mwana mpo aboma ye." Afandaki kuna tee mokolo Erode akufaki. —Matayo 2:13b, 15a


ELENGE YA YEZU — 10

Mwana akolaki mpe azwaki nguya. Atondaki na mayele mpe Nzambe abenisaki ye. Mbula na mbula baboti ya Yezu bazalaki kokende na Yeruzalemi mpo na feti ya Paki. Ntango Yezu akokisi mbula zomi na mibale.... Bakamati nzela mpo na kozonga. Kasi Yezu atikalaki na Yeruzalemi....Bakanisaki ete mwana azali epai ya bato mosusu. Basali mokolo mobimba na nzela, bongo babandi koluka ye epai ya bandeko mpe ya baninga na bango. Kasi bazwaki ye te, yango wana bazongaki na Yeruzalemi mpo na koluka ye. Na nsima ya mikolo misato bakuti ye na Ndako ya Nzambe, afandi na kati ya balakisi ya Mibeko; azalaki koyoka bango mpe kotuna bango mituna. Bato nyonso oyo bayokaki ye bakamwaki mingi mpo na mayele na ye mpe na ndenge azalaki kozongisa....Ye azongiseli bango: "Mpo na nini bozalaki koluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na Ndako ya Tata na ngai?" Yezu azalaki kokoma mayele mingi mpe kokola. Bongo azalaki kosepelisa Nzambe na bato. —Luka 2:40-49, 52


YEZU ABIMI NA MISO YA BATO — 11  

Nzambe atindaki moto moko, nkombo na ye Yoane. Yoane azongiseli bango: "Ngai nazali `Mongongo ya moto oyo azali kobelela na kati ya esobe: Bobongisa nzela mpo na Mokonzi!'" Wana maloba Mosakoli Ezaya alobaki.

Nsima ya mokolo wana, Yoane amoni Yezu azali koya epai na ye. Yoane alobi: "Tala Mwana Meme ya Nzambe oyo akolongola masumu ya bato." Yoane alobi lisusu: "Namonaki Molimo auti na likolo lokola pizio, mpe ayei kofanda na motu na ye. Ngai nayebaki ye te, kasi Nzambe oyo atindaki ngai mpo nabatisa bato na mai, alobaki na ngai: Okomona Molimo akouta na likolo mpe akofanda na moto moko; ezali nde ye wana akobatisa bato na Molimo Mosanto. Namonaki yango, mpe nazali koyebisa bino ete azali Mwana ya Nzambe." —Yoane 1:6, 23, 29, 32-34

Ntango Yezu azwi batisimo, abimi na mai. Kaka na ntango wana Likolo efungwani; amoni Molimo ya Nzambe akiti lokola pizio mpe ayei kofanda likolo na ye. —Matayo 3:16


YEZU ALONGI KOMEKAMA —12

Zabolo apusani penepene na ye mpe alobi: "Soki ozali Mwana ya Nzambe, loba na mabanga oyo ebongwana mampa." Kasi Yezu azongisi: "Ekomama na Mikanda: `Bomoi ya moto ezali kaka mpo na mampa te; kasi ezali mpo na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe.'" Bongo zabolo...atii ye likolo ya Ndako ya Nzambe, mpe alobi na ye: "Soki ozali Mwana ya Nzambe, omibwaka na nse. Mpamba te ekomama na Mikanda: `Nzambe akotinda baanzelu na ye mpo na yo, mpe bakoyamba yo na maboko na bango, mpo otuta lokolo na yo na libanga te.'" Kasi Yezu azongiseli ye: "Ekomama lisusu na Mikanda: `Komeka Mokonzi Nzambe na yo te.'" Zabolo amemi ye lisusu na likolo ya ngomba moko ya molai mpenza, amonisi ye mikili nyonso ya nse, mpe lokumu ya bakonzi na yango. Alobi na ye: "Nakopesa yo nyonso wana soki ofukameli ngai mpe okumisi ngai." Bongo Yezu alobi na ye: "Satana, longwa! Ekomama na Mikanda: `Sambela Mokonzi na yo Nzambe mpe salela bobele ye.'" —Matayo 4:3-10


YEZU ABENGI BAYEKOLI NA YE — 13  

Mokolo moko Yezu azalaki koleka penepene na ebale ya Galilea, amoni Simoni na leki na ye Andele. Bazalaki kobwaka monyama na ebale mpo bazalaki baluki ya mbisi. Yezu alobi na bango: "Bolanda ngai, mpe nakokomisa bino baluki ya bato." Na mbala moko, batiki minyama na bango mpe balandi Yezu. Yezu apusani moke mpe amoni Zaki na ndeko na ye Yoane, bana ya Zebedeo. Bazalaki na bwato na bango mpe kobongisa minyama. Yezu abengi bango; bongo batiki tata na bango Zebedeo na kati ya bwato elongo na bato ya mosala mpe balandi Yezu. —Marko 1:16-20

Na ntango azalaki koleka, amoni Levi, mwana ya Alfeo afandi na biro oyo bafutaka mpaku. Yezu alobi na ye: "Landa ngai!" Levi atelemi mpe alandi ye. —Marko 2:14

Yezu akendeki...kosambela Nzambe; mpe asambelaki butu mobimba. Ntongo etani, abengi bayekoli na ye mpe aponi bato zomi na mibale; apesi bango nkombo: bantoma. —Luka 6:12b, 13


YEZU ASAKOLI NSANGO MALAMU — 14

Bongo Yezu azongi na Galilea, atondaki na nguya ya Molimo Mosanto. Nsango na ye etamboli bipai nyonso na mokili wana. Azalaki koteya na bandako ya losambo mpe bato nyonso bazalaki kokumisa ye. Yezu akendeki na Nazareti epai ye akolaki; na Mokolo ya Kopema akoti na ndako ya losambo lokola amesana kosala. Atelemi mpo na kotanga Mokanda ya Nzambe. Bongo, bapesi ye mokanda ya mosakoli Ezaya. Afungoli yango mpe azwi esika oyo ekomama boye: "Molimo ya Mokonzi akiteli ngai, aponi ngai Mesia mpo namema Nsango Malamu epai ya bato bakelela. Atindi ngai nasakola na bato ya boloko ete bakobimisa bango; nayebisa bato bakufa miso ete bakomona lisusu; nasilisa mpasi ya bato banyokwami, mpe nasakola nsango ya mbula oyo Mokonzi akomonisa bolamu na ye."...Bato nyonso bazalaki na kati ya ndako ya losambo batali ye nyee. Bongo Yezu abandi kolobela bango: "Makambo oyo esalami lelo ntango nazalaki kotangela bino yango." —Luka 4:14-21


YEZU APETOLI NDAKO YA NZAMBE — 15 

Awa bakomi na Yeruzalemi, Yezu akoti na Ndako ya Nzambe mpe abandi kobengana bato oyo bazalaki kotekisa mpe kosomba biloko. Abaloli bamesa ya bato bazalaki kosanze mbongo, na bakiti ya baoyo bazalaki kotekisa bapizio. Nsima abandi koteya bango maloba oyo: "Ekomama na Mikanda ete `Ndako na ngai, bakobenga yango ndako ya losambo mpo na bato nyonso.' Ezali boye te? Kasi bokomisi yango ndako miyibi babombanaka!" —Marko 11:15, 17

YEZU ALAKISI LIKAMBO YA MASUMU

Yezu alobi na bango: "Nazali koloba na bino, ya solo: moto nyonso oyo asalaka masumu azali moumbu ya masumu. Soki Mwana akomisi bino bansomi, bokozala bansomi solo. —Yoane 8:34, 36

Kasi oyo ebimaka na monoko eutaka na motema; mpe yango ebebisaka moto. Mpo makanisi ya mabe eutaka na mitema ya bato; mpe yango etindaka bango baboma baninga, basala kindumba na makambo ya nsoni, bayiba, bakosa mpe bafinga bato mosusu. —Matayo 15:18, 19


YEZU AMEMELI BOMOI YA SIKA — 16

Yesu azongiseli ye: "Nazali koloba na yo, ya solo: soki moto abotami mbala ya mibale te, akoki kozala moto ya Bokonzi ya Nzambe te. Kokamwa te mpo nalobi na yo: Bosengeli kobotama mbala ya mibale. Mpo Nzambe alingi bato ya mokili mingi mpenza; yango wana apesaki Mwana na ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima ye akufa te, kasi azwa bomoi ya seko." —Yoane 3:3, 7, 16

"Bomoi ya seko ezali boye: koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe koyeba Yezu Kristo oyo otindaki." —Yoane 17:3

"Lokola Tata asekwisaka bato, ndenge moko mpe, Mwana apesaka bomoi na bato oyo alingi. Nazali koloba na bino, ya solo: moto oyo ayokaka maloba na ngai, mpe andimelaka moto oyo atindaki ngai, azali na bomoi ya seko. Bakokatela ye etumbu te, kasi asi' alongwe na liwa mpe azwi bomoi ya seko." —Yoane 5:21, 24

Bongo soki moto azali na lisanga na Kristo, akomi moto ya sika. Makambo na ye ya kala esili; makambo ya sika ekoteli ye. —2 Korinto 5:17


YEZU AMEMELI MAI YA BOMOI — 17  

Yezu akomaki na mboka moko ya Samaria, nkombo na yango Sikare....Awa Yezu alembi na nzela, afandi pembeni na libulu yango....Mwasi moko ya Samaria ayaki kotoka mai. Yezu alobi na ye: "Pesa ngai mai namela." ...Kasi mwasi ya Samaria wana azongiseli Yezu: "Yango boni? Yo ozali Moyuda! Mpo na nini okosenga mai na ngai mwasi ya Samaria?"...Yezu alobi na ye: "Soki oyebaki likabo oyo Nzambe apesaka na bato, mpe nani oyo azali kosenga yo mai, mbele yo moto olingaki kosenga ngai mai ya komela, bongo nalingaki kopesa yo mai ya bomoi. Moto nyonso akomela mai oyo akoyoka lisusu mposa ya mai; kasi moto akomela mai oyo ngai nakopesa ye, akoyoka lisusu mposa ya mai te." —Yoane 4:5-10, 13b, 14a

Yezu...abandi koloba na mongongo makasi: "Moto oyo azali na mposa ya mai, aya komela epai na ngai. Bakoma na Mikanda ya Nzambe: Moto oyo akondima ngai, mai ya bomoi ekobima na motema na ye lokola ebale." Yezu azalaki koloba bongo mpo na Molimo ya Nzambe oyo bato bakondima ye bakozwa. —Yoane 7:37b-39a


YEZU AZALAKI KOTEYA NA MASAPO — 18

"Yango wana, moto nyonso oyo ayoki mateya na ngai, mpe atosi yango, akozala lokola moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye likolo ya mabanga. Mbula ebeti; baebale etondi; mopepe makasi eleki, mpe ebeti na ndako wana; kasi ndako ekwei te, mpo batongaki yango likolo ya mabanga. Kasi moto nyonso oyo ayoki mateya na ngai mpe atosi yango te, akozala lokola moto moko ya zoba oyo atongaki ndako na ye likolo ya zelo. Mbula ebeti, baebale etondi, mopepe makasi eleki; mpe ebeti na ndako wana; ndako ekwei. Yango nyonso ebukani." —Matayo 7:24-27

"Bokanisi nini? Soki moto azali na bameme nkama, bongo abungisi meme moko, akosala nini? Akotika bameme ntuku libwa na libwa mosusu na likolo ya ngomba, mpo akende koluka oyo ebungi. Nalobi na bino, ya solo: soki azwi yango akoyoka esengo mingi mpo na meme wana, koleka esengo oyo ye akoki koyoka mpo na bameme ntuku libwa na libwa oyo ebungi te. Ndenge moko mpe Tata na bino ya Likolo alingi te ete mwana moko na kati ya bana oyo abunga." —Matayo 18:12-14


YEZU ATEYI NDENGE NINI KOZWA KOBENISA — 19 

Ntango Yezu amoni ebele ya bato wana, amati likolo ya ngomba moko...."Esengo na baoyo bayebi ete bakelela na mitema; mpo bazali bato ya Bokonzi ya Likolo! Esengo na baoyo bazali kolela: Nzambe akolongola bango mawa! Esengo na bato ya boboto: bango bakozwa mokili lokola Nzambe alakaki! Esengo na baoyo balukaka kosala bolamu: Nzambe akotondisa bango na bolamu! Esengo na baoyo bayokelaka baninga mawa: Nzambe akoyokela bango mpe mawa! Esengo na baoyo bazali na mitema mpembe: bango bakomona Nzambe! Esengo na baoyo bamemaka boboto na kati ya bato: Nzambe akobenga bango bana na ye! Esengo na baoyo banyokwamaka mpo batosaka Nzambe: bango bazali bato ya Bokonzi ya Likolo! Esengo na bino soki bafingaka bino mpe banyokolaka bino to bakoselaka bino makambo ya ndenge na ndenge mpo bozali bayekoli na ngai." —Matayo 5:1a-11

"Esengo ekoleka mingi na bato oyo bayokaka maloba ya Nzambe mpe batosaka yango!" —Luka 11:28b


YEZU ALAKISI NDENGE YA KOSAMBELA — 20

Basengeli kobondela Nzambe mpe kolemba soki moke te. —Luka 18:1b

"Bato mibale bakendeki na Ndako ya Nzambe mpo na kosambela. Moko azalaki Farize, mosusu mofutisi ya mpaku. Farize atelemi mpe asambeli boye na motema: `Ee, Nzambe, natondi yo mpo nazali lokola bato mosusu te. Bango bazali bamiyibi, bato mabe mpe basalaka kindumba. Mpe natondi yo mpo nazali lokola mofutisi ya mpaku oyo te. Na mposo moko namilalisaka nzala mbala mibale mpo na kosambela yo. Mpe na biloko nyonso nazwaka, napesaka yo makabo ya eteni na yango ya zomi.' Mofutisi ya mpaku atelemi mosika mpe amekaki kutu kotala na likolo te, kasi azalaki komona mpasi na motema mpe alobi: `Ee, Nzambe, yokela ngai mawa mpo nazali moto ya masumu!' Yezu alobi lisusu: "Nalobi na bino, moto oyo akomi moto malamu na miso ya Nzambe ntango azongi na ndako na ye, kasi Farize te." —Luka 18:10-14a


YEZU ALAKISI NDENGE KOZALA BAYEKOLI NA YE — 21

Yezu abakisi: "Kaka bongo moto moko te na kati na bino akoki kokoma moyekoli na ngai soki aboyi biloko na ye nyonso te." —Luka 14:33

Na nsima Yezu alobi na bayekoli na ye: "Soki moto alingi kolanda ngai, atika kokanisa mpo na nzoto na ye moko; akumba ekuruze na ye mpe alanda ngai. Mpo moto oyo alingi kobikisa bomoi na ye, akobungisa yango; kasi moto oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai, akozwa yango lisusu. Soko moto azwi mokili mobimba, mpe abungisi bomoi na ye, eloko nini azwi?" —Matayo 16:24-26a

"Mobeko na ngai, yango oyo: bolingana bino na bino lokola ngai nalingaka bino." —Yoane 15:12

"Soki bino bolingani ndenge wana, bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai." —Yoane 13:35

"Tata na ngai akozwa lokumu soki boboti mbuma mingi. Na ndenge wana bino bokolakisa ete bozali bayekoli na ngai." —Yoane 15:8


YEZU ALAKISI LIKAMBO NA LIFELO MPE LIKOLO — 22

"Soki bobongwani te mpo bokoma lokola bana mike, bokoki kokoma bato ya Bokonzi ya Likolo te." —Matayo 18:3b

"Bokota na monoko ya moke. Mpamba te monoko na nzela oyo ememaka bato na liwa ezali monene. Mpe bato mingi balandaka nzela wana; kasi monoko ya ndako na nzela oyo ememaka bato na bomoi ezali moke, mpe bato mingi balandaka yango te." —Matayo 7:13, 14

"Ekozala bongo na mokolo ya nsuka: baanzelu bakoya kopona bato ya malamu, mpe bakobwaka ya mabe na lifelo, kuna bakolela mpe bakolia mino." —Matayo 13:49, 50

Yezu alobi: "Bozala mitema likolo te. Bondima Nzambe, mpe bondima ngai. Na ndako ya Tata na ngai bisika ezali mingi; nakei kobongisela bino yango. Soki ezalaki bongo te, mbele nalingaki kolobela bino yango te. Nsima, soki nakei kobongisela bino esika, nakoya lisusu kokamata bino, mpo bino mpe bozala na esika oyo ngai nazali." —Yoane 14:1-3


YEZU ALAKISI ETE YE AZALI NANI — 23 

"Ngai nazali mampa ya bomoi oyo euti na likolo. Soki moto alei mampa yango, ye akozala na bomoi ya seko. Mampa oyo ngai nakopesa na bato, ezali nzoto na ngai, nakopesa yango mpo bato bazwa bomoi." —Yoane 6:51

"Ngai nazali nzela, nazali solo, mpe nazali bomoi. Moto moko te akoki kokende epai ya Tata soki aleki epai na ngai te." —Yoane 14:6b

"Ngai nazali monoko ya lopango. Moto oyo akokota epai na ngai, akobika; akoki kokota mpe kobima, mpe akozwa bilei. Nazali mobokoli malamu ya bame- me. Mobokoli malamu akopesa bomoi na ye mpo na bameme na ye." —Yoane 10:9, 11

"Ngai nazali lokola moi mpo na bato. Moto oyo akolanda ngai, akotambola lisusu na molili te, kasi akomona polele." —Yoane 8:12b

"Ngai nazali mosekwisi mpe napesaka bomoi. Moto oyo akondima ngai akozala na bomoi atako akufa." —Yoane 11:25b

Bango nyonso balobi: "Yo nde Mwana ya Nzambe?" Ye azongiseli bango: "Bosi'bolobi ete. Ezali ngai." —Luka 22:70


YEZU AZALI NA BOKONZI LIKOLO NA MALADI — 24

Moto moko azalaki na maladi ya maba ayei epai na ye, afukameli ye, mpe alobi: "Mokonzi, soki olingi, okoki kobikisa ngai." Yezu atandi loboko, asimbi ye, mpe alobi: "Nalingi yango; bika!" Kaka na ntango wana, maladi na ye ya maba esili. —Matayo 8:2, 3

Ye azalaki na molimo moko oyo epesi ye maladi ya nkunki esi'eleki mbula zomi na mwambe. Mokongo na ye engunzama mpe akokaki kotelema malamu te. Awa Yezu amoni ye, abengi ye mpe alobi: "Mama, obiki, maladi na yo esili." Asimbi ye, na mbala moko maladi ya nkunki esili. —Luka 13:11b-13a

Bamemi bato bakufa makolo, na bato bakufa miso, na bato batambolaka te, na bababa, mpe bato ya maladi ya ndenge na ndenge. Batiki bango liboso ya Yezu, bongo abikisi bango. —Matayo 15:30b

Bokilo ya Simoni alalaki na mbeto mpo azalaki na fievre. Ntango Yezu akomi, bayebisi ye likambo wana. Apusani penepene na ye, asimbi ye na loboko mpe atelemisi ye. —Marko 1:30, 31a


YEZU AZALI NA BOKONZI NYONSO NA LIKOLO MPE NA NSE — 25

Bongo alobi na bato nyonso bafanda na matiti; na nsima akamati mampa mitano wana na mbisi mibale, atomboli miso likolo, mpe atondi Nzambe. Akatikati mampa wana mpe apesi yango na bayekoli na ye. Bongo bayekoli na ye bakaboli yango na bato. Bato nyonso balei yango mpe batondi. Bayekoli balokoti biteni oyo etikalaki mpe batondisi na yango bitunga zomi na mibale. —Matayo 14:19, 20

Ntango ntongo elingaki kotana, Yezu akei epai na bango mpe azalaki kotambola likolo ya mai. Kasi ntango bango bamoni ye azali kotambola likolo ya mai, bayoki nsomo mpenza; bongo balobi. "Ezali elima!" —Matayo 14:25, 26a

Mopepe moko ya makasi ebandi koleka, bambonge ebeti, bwato ebandi kotonda na mai, mpe elingi kozinda. Yezu atelemi, agangeli mopepe mpe alobi na mai: "Tika makelele! Fanda nyee!" Bongo mopepe esili mpe kimia ezongi mpenza. —Marko 4:37, 39


YEZU AZALI NA BOKONZI NA KOLIMBISA MASUMU — 26

Kasi nalingi boyeba ete Mwana ya Moto azali na bokonzi ya kolongola masumu awa na mokili." Bongo alobi na moto akufa makolo: " Telema, kamata mbeto na yo mpe zonga na ndako!" Moto wana atelemi mpe akei na ndako na ye. —Matayo 9:6, 7

Bongo Yezu alobi na mwasi wana: "Nzambe alimbisi yo masumu." —Luka 7:48

Bongo, bandeko, boyeba malamu: tozali koyebisa bino ete Nzambe azali kolimbisa masumu mpo na Yezu. Mibeko ya Moize ekokaki kobikisa bino na masumu te Kasi moto nyonso oyo andimaka, akobika mpo na ye. —Misala 13:38, 39

Tolongwe na boumbu mpo na makila ya Kristo: elingi koloba ete Nzambe alimbisi masumu na biso mpo na Kristo, mpe akabeli biso bomengo ya bolamu na ye. —Efezo 1:7

Nzokande, soki tondimi ete tosalaka masumu, Nzambe azali moto ya bosembo mpe akokisaka bilaka na ye. Ye nde akolimbisa biso masumu mpe akolongola makambo na biso nyonso ya mabe. —1 Yoane 1:9


YEZU AZALI NA BOKONZI KOBENGANA MILIMO MABE —27

Moto moko ya molimo mabe azalaki na kati ya ndako ya losambo mpe abandaki koganga makasi: "Ee! Yezu ya Nazareti, biso na yo likambo nini? Oyei mpo na koboma biso? Nayebi yo malamu; ozali mosanto oyo Nzambe atindi!" Yezu agangeli molimo wana mpe alobi: "Fanda nyee, bima na nzoto ya moto oyo!" Molimo mabe ekweisi moto wana na mabele liboso ya bato nyonso, mpe ebimi na moto wana kasi esali ye ata likambo moko ya mabe te. Bato nyonso bakamwe, mpe balobi bango na bango: "Maloba ya ndenge nini wana? Moto oyo azali kotinda milimo mabe na bokonzi mpe na nguya, bongo yango ezali kobima!" —Luka 4:33-36

Awa mwana akomi penepene na Yezu, molimo mabe yango ekweisi ye na mabele mpe eningisi ye makasi. Kasi Yezu agangeli molimo mabe mpe abikisi mwana, bongo azongisi ye na tata na ye. Bato nyonso bakamwe mpo na nguya monene ya Nzambe. —Luka 9:42, 43a


YEZU AZALI NA BOKONZI LIKOLO NA LIWA —28

Yezu alobi na bango: "Bolongola libanga." Kasi Marta... alobi na ye: "Mokonzi, azali kolumba nsolo, mpamba te asali mikolo minei na libulu." Yezu alobi na ye: "Soki ondimi, okomona lokumu ya Nzambe. Nalobaki boye te?" ...Agangi na mongongo makasi: "Lazare, bima!" Moto oyo akufaki, abimi; makolo na maboko ezalaki ya kokangama.... —Yoane 11:39, 40, 43, 44a

Mokonzi moko ya Bayuda ayei kofukamela ye, mpe alobi: "Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sikoyo. Kasi yaka kotiela ye loboko mpe akobika." Yezu abimisi bato, akoti na ndako, asimbi mwana mwasi wana na loboko, mpe ye atelemi. —Matayo 9:18b, 25

Bakutani na bato bazalaki kokende kokunda ebembe: ezalaki mwana ya mwasi moko akufela mobali; mwasi wana azalaki na mwana mosusu te....Ntango Mokonzi amoni mwasi wana ayokeli ye mawa mingi mpe alobi na ye: "Kolela te!" Bongo apusani mpe asimbi sanduku ya ebembe ....Yezu alobi: "Ndeko mobali, nalobi na yo: Telema!" Moto oyo akufaki afandi. —Luka 7:12b-15a


NDENGE BATO BATALI MOSALA YA YEZU — 29 

Bongo atuni bayekoli na ye: "Bato balobaka nini mpo na Ngai, Mwana ya Moto?" Bango bazongisi: "Bato mosusu balobaka ete yo ozali Yoane Mobatisi; bamosusu ete Elia; bongo bato mosusu balobaka ete ozali Yeremia, to mosakoli moko ya kala." Kasi Yezu atuni bango: "Bongo bino bolobi ete nazali nani?" Simoni Piere azongisi: "Yo ozali Mesia, Mwana ya Nzambe ya bomoi." —Matayo 16:13b-16

Bato mingi na kati na bango balobi: "Azali na molimo mabe! Azali na liboma! Mpo na nini bozali koyoka ye?" Kasi bato mosusu balobi: "Moto azali na molimo mabe alobaka ndenge wana te. Yango molimo mabe ekoki kobikisa bato bakufa miso?" —Yoane 10:20, 21

Bato mingi na kati ya Bayuda...bandimaki Yezu mpo bamonaki makambo asalaki. Kasi bato mosusu na kati na bango bakendeki koloba na Bafarize makambo oyo Yezu asalaki. Banda mokolo wana, bakonzi ya Bayuda bakataki ete baboma Yezu. —Yoane 11:45, 46, 53

"Bayinaki ngai mpamba". —Yoane 15:25b


YEZU AYEBISI NA LIBOSO ETE AKOKUFA MPE AKOSEKWA — 30

Nsima, Yezu abandi koteya bayekoli na ye: "Mwana ya Moto, asengeli koyoka mpasi mingi. Bakoboya ye na bankolo, bakonzi ya banganga-Nzambe na balakisi ya mibeko. Bakoboma ye, kasi nsima ya mikolo misato akosekwa." —Marko 8:31

"Ntango bakotombola ngai, nakobenda bato nyonso epai na ngai." (Na maloba oyo, Yezu alakisaki ndenge nini ye akokufa.) —Yoane 12:32, 33

Yezu alobi na bango: "Boboma Ndako ya Nzambe oyo, mpe nakotonga yango lisusu na mikolo misato." Bayuda bazongiseli ye: "Basalaki mbula ntuku minei na motoba mpo na kotonga ndako oyo, bongo yo okotonga yango na mikolo misato?" Kasi Ndako ya Nzambe oyo Yezu alobaki, ezali nzoto na ye moko. Ntango Yezu asekwaki, nde na ntango wana bayekoli na ye bayei kokanisa ete Yezu alobaki maloba yango. —Yoane 2:19-22a

"Kasi ntango nakosekwa, nakokende liboso na bino na Galilea." —Matayo 26:32


YEZU AKOTI YERUZALEMI MPO AKUFA — 31 

Nsima ya mokolo moko, bato ebele oyo bayaki mpo na feti ya Paki bayoki ete Yezu akoya na Yeruzalemi. Bakamati mandalala, bongo bakei koyamba ye na nzela, mpe babandi koganga: "Lokumu na Nzambe! Nzambe abenisa moto oyo ayei na nkombo na ye! Nzambe abenisa Mokonzi ya Israele." Yezu amoni mpunda, bongo abuti na likolo na yango, lokola ekomama na Mikanda: "Kobanga te, mboka ya Sioni! Tala Mokonzi na yo ayei, afandi likolo ya mwana ya mpunda." —Yoane 12:12-15

Ata bato ebele bayambi Yezu na lokumu ntango akoti Yeruzalemi, Yezu ayebaki ete bato na ye bakokoboya Ye kozala mokonzi na bango. Yezu aleli mpo ayebaki nini ekosalama na Yeruzalemi mpo alingaki te koyamba Ye moko oyo akoki kopesa bango kimia.

Awa Yezu akomi penepene na mboka Yeruzalemi, ntango amoni yango, aleli mpo na yango mpe alobi: "E, Yeruzalemi, soki yo mpe oyebaki lelo makambo oyo ekoki komemela yo boboto! Kasi okoki koyeba yango te! Mpo mikolo ekoya banguna na yo....Bakotika libanga moko na esika na yango te; mpamba te lelo Nzambe ayei kosalisa yo, kasi yo ondimi te." —Luka 19:41-44


YEZU MWANA MEME YA PAKI —32

Yoane amoni Yezu azali koya epai na ye. Yoane alobi: "Tala Mwana Meme ya Nzambe oyo akolongola masumu ya bato." —Yoane 1:29b

Mokolo ya mampa oyo evimbaka te ekomi, yango ezalaki mokolo basengeli koboma bana meme mpo na kolia na Paki. Bongo Yezu atindi Piere na Yoane mpe alobi: "Bokende kobongisela biso bilei ya Paki mpo tolia yango." Na nsima akamati mampa, mpe awa asilisi kotonda Nzambe akatikati yango, apesi na bayekoli na ye mpe alobi: "Oyo ezali nzoto na ngai, [napesi yango mpo na bino. Bosala boye mpo na kokanisa ngai]." Akamati mpe kopo....Alobi na bango: "Oyo ezali makila na ngai, makila esopani mpo na bato mingi, mpo boyokani ezala na kati ya Nzambe na bato." —Luka 22:7, 8, 19; Marko 14:23, 24

Anyokelami mpe anyatami, nde ata bongo ajipoli monoko na ye te. Lokola mwana na mpate oyo akambami mpo na kobomama. —Yisaya 53:7a

Basili koboma Kristo oyo azali Mwana-meme na biso ya Paki. —1 Korinto 5:7b


BATEKISI YEZU NA MABOKO YA BATO MPE BAKANGI YE — 33

Yudasi Iskariote, oyo azalaki moko ya bayekoli zomi na mibale, akei kotekisa Yezu epai ya bakonzi ya banganga-Nzambe. —Marko 14:10

Bongo Yezu akomi na bayekoli na ye na elanga moko babengaka yango Getesemane, mpe alobi na bango: "Bofanda awa, ngai nakei kobondela Nzambe kuna." Amemi Piere mpe bana ya Zebedeo mibale Zaki na Yoane. Abandi komona mawa mpe mpasi na motema. Apusani mwa moke, akwei elongi na nse, mpe abondeli Nzambe boye: "Tata na ngai, soki ekoki, kopo ya mpasi oyo elongwa na ngai! Kasi kosala te ndenge ngai nalingi; bobele lokola yo olingi." —Matayo 26:36, 37, 39

Basoda na mokonzi na bango, mpe bakengeli ya Bayuda bakamati Yezu mpe bakangi ye nsinga. —Yoane 18:12

Bakonzi ya banganga-Nzambe na bato nyonso ya Likita monene ya Bayuda bazalaki koluka bato bakoki kofunda Yezu mpo bakatela ye liwa, kasi bazwaki ata moto moko te. —Marko 14:55


BAKATELI YEZU ETUMBU YA LIWA MPE — 34
BABAKI YE NA EKURUZI 

Ntongo etani, bakonzi ya banganga-Nzambe nyonso na bankolo ya Bayuda basangani mpe bayokani mpo na kobimisa Yezu....Pilate alobi na bango: "Kasi nasala nini na Yezu oyo babengaka Kristo?" Bazongisi: "Baka ye na ekuruze!" —Matayo 27:1, 22

Ntango babaki ye na ekuruze, ezalaki ngonga ya libwa ya ntongo. Bakomaki ntina ya likambo oyo babomaki ye na mwa libaya boye: "Mokonzi ya Bayuda." Babaki lisusu bamiyibi mibale na baekuruze elongo na Yezu, moko batii ye na loboko ya mobali, mosusu na loboko ya mwasi....Bato bazalaki koleka esika wana bakomi koningisela ye mitu, kofinga mpe koloba na ye: "Ee, yo moto olobaki ete okoboma Ndako ya Nzambe mpe kotonga yango lisusu na mikolo misato! Omibikisa yo moko ko, kita na ekuruze!" Na ndenge moko mpe bakonzi ya banganga- Nzambe...bazalaki koseka Yezu mpe kolobana: "Abikisi bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te!" —Marko 15:25-31


BATO BASALI BATEMWE NA LIWA NA YEZU — 35 

Na midi mokili mobimba ekomaki molili tee na ngonga ya misato ya mpokwa. Yezu agangi lisusu makasi mpenza mpe akati motema....Mabele eningani, mabanga epasuki....Mokonzi ya basoda ya Roma, mpe basoda oyo bazalaki kokengela Yezu elongo na ye, ntango bamoni mabele eningani mpe makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bayoki nsomo mingi mpe balobi: "Ya solo, moto oyo azalaki Mwana ya Nzambe!" —Matayo 27:45, 50, 51, 54

Bongo basoda bayei epai ya bato mibale wana babakaki na ekuruze elongo na Yezu, mpe babuki bango makolo. Ntango bakomi epai ya Yezu, bamoni ete asi'akufi; yango wana babukaki ye makolo te. Kasi soda moko atoboli mopanzi ya Yezu na likonga, mpe na mbala moko makila na mai ebimi....Yango esalamaki bongo mpo na kokokisa makambo ekomama na Mikanda: "Bakobuka ye ata mokuwa moko te." Epai mosusu bakoma boye: "Bakotala moto oyo batoboli mopanzi." —Yoane 19:32-37


BAKUNDI YEZU, KASI YE ASEKWI — 36
NSIMA YA MIKOLO YA MISATO
 

Bakonzi ya banganga-Nzambe na Bafarize bakei epai ya Pilate. Balobi na ye: "Mokonzi, tozali kokanisa makambo moto ya lokuta wana alobaki ntango azalaki naino na bomoi. Ye alobaki: `Nakosekwa nsima ya mikolo misato.' Ebongi otinda bakengela simetiele mikolo misato; soki te bayekoli na ye bakoya koyiba ebembe, bongo na nsima bakoloba na bato: `Asekwi'...." Pilate alobi na bango: "Bokamata basoda! Bokende kokengela sime tiele na ndenge ekoki." Bongo bakei kokanga simetiele malamu, batii elembo na libanga esika ya kofungola, mpe batiki basoda mpo na kokengela yango. —Matayo 27:62b-66

Na ntongo mpenza, Maria ya mboka Magdala na ndoi na ye Maria, mama...bayaki kotala simetiele. Anzelu alobi na basi: "Bobanga te, nayebi ete bozali koluka Yezu oyo babakaki na ekuruze. Azali awa te! Asi'asekwi, lokola alobaki." —Matayo 28:1b, 5, 6a


YEZU ALONGI LIWA — 37 

[Kristo] asekwaki nsima ya mikolo misato, lokola ekomama na Mikanda. —1 Korinto 15:4b

"Nakopesa bomoi na ngai mpe nakozwa yango lisusu. Moto moko te akobotola bomoi na ngai, kasi ngai moko nakopesa yango na bolingo na ngai. Nazali na nguya ya kopesa yango, mpe ya kozwa yango lisusu." —Yoane 10:17b, 18a

Akosilisa kufa libela mpe Nkolo Yawe akokomba mpisoli na bilongi yonso. —Yisaya 25:8a

"Nazali na bomoi. Nakufaki, kasi sikoyo nazali na bomoi ya seko. Nazali mokonzi ya liwa mpe ya mboka ya bato bakufa [lifelo]." —Koyebisa Sekele 1:18

"E liwa, wapi makasi na yo? E liwa, wapi nguya na yo ya kozokisa bato?" Kasi totonda Nzambe oyo azali kolongisa biso mpo na Mokonzi na biso Yezu Kristo! —1 Korinto 15:55, 57

"Bokamwa te, ntango ekoya oyo bato nyonso bakundama na simetiele bakoyoka mongongo na ye, mpe bakobima. Bato oyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi baoyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu na bango." —Yoane 5:28, 29


YEZU ABIMELI NSIMA NA KOSEKWA NA YE — 38

Ntango Yezu asekwi, na mokolo ya yenga na ntongo ntongo, liboso abimeli Maria ya Magdala, oyo ye abenganaki milimo nsambo ya mabe. Nsima na yango, Yezu abimeli bayekoli na ye mibale bazalaki kokende na esobe. Ye amonani na bango lokola moto mosusu. —Marko 16:9, 12

Ezalaki se mokolo wana na mpokwa, nsima ya Mokolo ya Kopema, bayekoli bazalaki esika moko. Bakangaki minoko nyonso ya ndako, mpo bazalaki kobanga Bayuda. Yezu ayei kotelema na kati na bango, mpe alobi: "Boboto ezala na bino!" Awa asilisi koloba boye, alakisi bango maboko na ye na mopanzi na ye. Ntango bayekoli bamoni Mokonzi, mitema na bango etondi na esengo. —Yoane 20:19, 20

Amonanaki na Piere mpe nsima na bantoma na ye zomi na mibale. Amonanaki mpe na bandeko nkama mitano na mbala moko....Lisusu amonanaki na Zaki mpe nsima na yango na bantoma nyonso. —1 Korinto 15:5-7

Kasi Nzambe asekwisi ye na nsima ya mikolo misato mpe apesi ye nguya ya komimonisa lisusu. —Misala 10:40


YEZU ATINDI BAYEKOLI ETE BAKOZALA BATEMWE — 39
MPE NZAMBE ATOMBOLI YE NA LIKOLO 

Yezu alobi na bango lisusu: "Boboto ezala na bino! Lokola Tata atindaki ngai, ngai mpe nazali kotinda bino." —Yoane 20:21

"Nzambe Tata apesi ngai bokonzi nyonso na likolo mpe na nse. Bongo bokende epai ya bato ya bikolo nyonso mpe bokomisa bango bayekoli na ngai; bobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya Molimo Mosanto. Bolakisa bango batosa mitindo nyonso napesaki bino. Boyeba ete nazali na bino mikolo nyonso tee na nsuka ya mokili." —Matayo 28:18b-20

"Kasi bokozwa nguya ntango Molimo Mosanto akokitela bino, bongo bokozala batemwe na ngai na Yeruzalemi, na mokili ya Yudea mpe ya Samaria mobimba, tee bipai nyonso ya mokili mobimba." Awa Yezu alobi makambo oyo, Nzambe atomboli ye na Likolo ntango bazalaki kotala ye, mpe lipata moko ezipi ye na miso na bango. Bazalaki kotala se na likolo epai Yezu azalaki kokende, na mbala moko bamoni bato mibale balati bilamba ya mpembe batelemi penepene na bango. —Misala 1:8-10


MOLIMO MOSANTO AYEI LOKOLA YEZU ALAKAKI — 40

"Bongo nakosenga Tata, mpe ye akopesa bino Mosalisi mosusu, mpo azala na bino seko. Ye azali Molimo akolakisa makambo nyonso ya solo. Bato ya mokili bakoki kozwa ye te, mpo bamoni ye te, mpe bayebi ye te. Kasi bino boyebi ye, mpo azalaka na bino, mpe azali na kati ya mitema na bino. Nakotika bino lokola bana etike te; nakozonga epai na bino." —Yoane 14:16-18

Ntango mokolo ya Pantekote ekomaki, bandimi nyonso basanganaki esika moko. Na mbala moko makelele euti na likolo ezalaki lokola mopepe makasi, etondisi ndako mobimba esika bango bafandaki....Bango nyonso batondi na Molimo Mosanto mpe babandi koloba na minoko mosusu lokola Molimo azalaki kolobisa bango. —Misala 2:1-4

"Nzambe asekwisi Yezu oyo ngai nazali koloba na bino, mpe biso nyonso tomonaki makambo wana. Nzambe apesi ye lokumu na bokonzi mpe azwi Molimo Mosanto oyo Tata alakaki mpe asopeli biso yango. Wana ezali makambo bino bozali komona mpe koyoka lelo." —Misala 2:32, 33


NA NTANGO OYO YEZU AKOTELI  — 41
MOTEMA NA BANDIMI MPO AFANDI 

"Bokangana na ngai, lokola ngai mpe nakangani na bino. Etape moko te ekoki kobota mbuma yango moko, soki ekangani na nzete ya vino te. Bino mpe ndenge moko, bokoki kosala eloko te soki bokangani na ngai te. Ngai nazali lokola nzete ya vino, bino bozali bitape. Moto oyo akangani na ngai, lokola ngai nakangani na ye, akobota mbuma mingi. Mpo, soki ngai nazali na bino te, bokoki kosala ata eloko moko te." —Yoane 15:4, 5

Bongo ngai Polo nazali lisusu na bomoi te. Kasi ezali Kristo moto azali na bomoi na kati ya nzoto na ngai. Bomoi oyo nazali na yango sikoyo ezali mpo nandimeli Mwana ya Nzambe oyo alingaka ngai mpe amipesaki mpo na ngai. —Galatia 2:20

Bato oyo balandaka nzela ya bomoto bakoki kosepelisa Nzambe te. Nzokande bino, bolandaka nzela ya bomoto te, kasi oyo ya Molimo, mpo Molimo ya Nzambe akotela bino na mitema. Mpa moto oyo azangi Molimo ya Kristo, azali moto na ye te. —Roma 8:8b, 9


NZAMBE AKUMISI YEZU —42

Biso tozalaki na esika wana ntango Tata Nzambe oyo azali na lokumu nyonso akumisaki ye mpe atindelaki ye mongongo ya lokumu. Alobi: "Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nazali na esengo mingi mpo na ye." Biso moko toyokaki mongongo oyo eutaki na Likolo ntango tozalaki elongo na ye na ngomba ya bosanto. —2 Piere 1:17, 18

Namoni lokola mwana ya moto atelemi na kati na yango, alati nzambala na mokaba moko ya or na ntolo na ye. Nsuki na ye ezali ya mpembe lokola bapwale ya meme, eleki mpembe makasi lokola neze; miso na ye ezali kongenga lokola móto. Makolo na ye ezalaki kongenga lokola ebende ya ntalo oyo batumbi na móto makasi mpo mbindo nyonso elongwa. Mpe mongongo na ye ezali koyokama lokola makelele ya mai nyonso ya ebale. Asimbi minzoto nsambo na loboko na ye ya mobali, mpe mbeli moko ya mino bipai nyonso mibale ezali kobima na monoko na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moi makasi ya midi. Ntango namoni ye, nakwei na makolo na ye lokola moto akufi. —Koyebisa Sekele 1:13-17a


YEZU AYELI MALOBA NA BAEKELEZIA — 43 

Mabe moko namonaka epai na bino, yango oyo: Bolingaka ngai lisusu te lokola na ebandeli. Bokanisa naino ndenge bozalaki liboso ya kokweya; bobongola mitema na bino, bongo bokokisa misala lokola bozalaki kosala kala.—Koyebisa Sekele 2:4b-5a

"Bobanga te mpo na mpasi oyo ezali kozela bino. ...Bondima na motema moko tee na liwa. Soki bongo bokolonga mpe nakopesa bino bomoi." —Koyebisa Sekele 2:10

Baoyo bakolonga, bakolata bilamba ya mpembe ya ndenge wana. Nakolongola bankombo na bango na buku ya bomoi ata moke te. Na miso ya Tata na ngai...nakondima ete bazali bato na ngai. —Kayebisa Sekele 3:5

"Ata bozali na makasi mingi te, kasi botosaki maloba na ngai mpe bowanganaki ngai te. Bongo nafungoli ndako liboso na bino oyo moto moko akoki kokanga yango te." —Koyebisa Sekele 3:8b

Kasi bozali mwa móto moke, elakisi ete móto mpenza te mpe malili mpenza te; yango wana nalingi kosanza bino. —Koyebisa Sekele 3:16


MAKAMBO YEZU AZALI KOSALA LELO — 44

Nzokande Kristo apesaki bobele likabo moko mpo na kolongola masumu libela. Nsima akei kofanda na loboko ya mobali ya Nzambe. —Baebreo 10:12

Tozali na Nganga-Nzambe monene oyo asili kokoma tee na Lilolo, ye nde Yesu Mwana ya Nzambe. Bongo tosengeli kosimba bondimi na biso makasi mpenza. Nganga-Nzambe na biso ya monene ayokaka mpasi elongo na biso soki tozangi makasi. Mpo Satana amekaki ye na ndenge nyonso lokola amekaka biso mpe, kasi akweyaki na masumu te. Yango wana, tokende liboso ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe na molende nyonso, esika bazwaka bolamu. —Baebreo 4:14-16a

Yango wana akoki kobikisa libela baoyo bapusanaka penepene na Nzambe na nguya na ye, mpamba te akoumela seko mpo abondela Nzambe mpo na bango. —Baebreo 7:25

Nzambe ye moko alobaki ete: "Nakotika yo ata moke te; nakobosana yo soki moko te." —Baebreo 13:5b

Yezu Kristo azalaki se ndenge moko lobi, lelo mpe seko. —Baebreo 13:8


YEZU ALAKI ETE AKOJONGA — 45 

Nakoya lisusu kokamata bino .... —Yoane 14:3b

Mpamba te...mongongo ya mokonzi...ayokana...bongo ye moko Mokonzi akouta na Likolo mpe akokita awa na nse. Bato bakufa oyo bandimelaki ye bakosekwa liboso. Na nsima biso bato tokozala na bomoi na mokolo wana, Nzambe akomatisa biso na mapata elongo na bango mpo tokutana na Mokonzi na kati ya likolo. Boye tokozala elongo na Mokonzi Yezu seko. —1 Tesalonika 4:16, 17

"Etikali moke Mwana ya Moto akoya na lokumu ya Tata na ye nzela moko na baanzelu na ye. Bongo akofuta moto na moto na ndenge ya mosala na ye. Mpo Mwana ya Moto akoya ndenge nkake ebimaka na likolo mpe engengisaka banda na este tee na weste. Bongo elembo ya Mwana ya Moto ekomonana na likolo; na ntango wana bato ya bikolo nyonso ya mokili bakolela, mpe bakomona Mwana ya Moto azali koya na likolo ya mapata na nguya mpe na lokumu mingi. Kelelo monene ekobeta; akotinda baanzelu basangisa baoyo ye aponi bipai nyonso ya mokili mobimba." —Matayo 16:27; 24:27, 30, 31


YEZU AKOSAMBISA MOKILI — 46

"Mokolo wana, bato mingi bakoloba na ngai: Mokonzi, Mokonzi, tosakolaki na nkombo na yo te? Tolongolaki milimo mabe na nkombo na yo te? Tosalaki bikamwiseli na nkombo na yo te? Kasi ngai nakoloba na bango: `Nayebi bino te! Bino bozalaki kosala mabe; bolongwa liboso na ngai!'" —Matayo 7:22, 23

Moto na moto na kati na biso akosamba na miso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko. —Roma 14:12b

Kasi lokola moyibi ayaka ntango bazali kozela ye te, ndenge moko mpe mokolo ya Mokonzi Yezu ekoya. Mokolo yango, likolo ekolimwa mpe makelele moko ya nsomo ekoyokana; biloko nyonso ya likolo ekokufa na móto; mokili na biloko na yango nyonso ekomonana lisusu ata moke te. Lokola biloko nyonso ekokufa ndenge wana, boyeba malamu ndenge nini bosengeli kozala. Bozala na bizaleli ya bosanto mpe bomipesa mingi mpenza na Nzambe.... Kasi biso tozali kozela Likolo ya sika mpe nse ya sika oyo Nzambe alakaki bato na ye. Kuna ekozala bobele bosembo. —2 Piere 3:10-13


YEZU AKOTIKALA MOKONZI MIKOLO NYONSO NA SEKO — 47

Yango wana, Nzambe akumisi ye koleka, mpe apesi ye bokonzi eleki bokonzi nyonso ya likolo mpe ya awa na nse. Boye mpo na lokumu ya nkombo ya Yezu, baoyo nyonso bazali na Likolo, to awa na nse, to na mboka ya bato bakufa, bafukamela ye. Mpe basakola ete: Yezu Kristo azali Mokonzi mpo na lokumu ya Tata Nzambe. —Filipi 2:9-11

Namononaki lokola ndoto na butu, mpe namonaki lokola mwana na moto koya na mapata na likolo!...Mpe nguya na nkembo na bokonzi epesamaki na ye ete mabota mpe mikili mpe nkota yonso basalela ye, nguya ne ye ezali nguya na lobiko na lobiko .... —Daniel 7:13-14

"Mwana-meme oyo babomaki, ye moto abongi mpo na kozwa nguya, bomengo, mayele, makasi, mpe lokumu nyonso mpenza." —Koyebisa Sekele 5:12b

Mingongo makasi eyokanaki na likolo: "Bokonzi ya mokili mobimba ekomi na maboko ya Mokonzi na biso Nzambe mpe Kristo na ye. Bongo ye akotikala Mokonzi mikolo nyonso seko." —Koyebisa Sekele 11:15b


YEZU ALOBELA YO, "YAKA" — 48

Boyoka! Ngai natelemi na monoko ya ndako mpe nazali kobeta yango; soki moto ayoki mongongo na ngai mpe soki afungoli ndako, nakokota na ndako na ye. Bongo biso na ye tokolia esika moko. —Koyebisa Sekele 3:20

Bato mosusu bakanisaka ete Mokonzi Nzambe aumeli mpo na kokokisa makambo ye alakaki, kasi ezali bongo te. Nzokande Nzambe akangaka motema mpo na bino, mpamba te alingi ete ata moto moko te abunga; kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema. —2 Piere 3:9

"Boya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi mpe bolembi na mokumba, bongo nakopemisa bino. Bozala basaleli na ngai, mpe boyekola mateya na ngai, bongo bokopema: mpo nazali moto ya motema malamu mpe ya boboto. Kosalela ngai ezali mpasi te, mpe mokumba na ngai ezali kilo te." —Matayo 11:28-30

"Moto nyonso Tata akopesa ngai, akoya epai na ngai. Soki ayei epai na ngai, nakobengana ye te." —Yoane 6:37

Lelo oyo ezali mokolo ya kobika. —2 Korinto 6:2b


OSALA NINI NA YEZU? 

"Moto oyo akondima Mwana, akozwa bomoi ya seko; oyo akotosa Mwana te, akozwa bomoi ya seko te, kasi Nzambe akoyokela ye nkanda seko." —Yoane 3:36

Nzokande bato mosusu bayambaki ye, mpe bandimaki ye; apesaki bango nzela ya kokoma bana ya Nzambe. —Yoane 1:12

Soki osakolaka na miso ya bato ete Yezu azali Mokonzi, mpe ondimaka na motema ete Nzambe asekwisaki ye, okobika. Mpamba te soki ondimi na nse ya motema, Nzambe akokomisa yo moto ya bosembo na miso na ye; soki osakoli yango na miso ya bato, Nzambe akobikisa yo. —Roma 10:9b, 10

NDENGE OKOKI KOSAMBELA

Nkolo Yesu Kristo, 
     Natondi yo mpo okufaki likolo na ekuruze mpo na kolongola masumu na ngai. Nayoki mawa mpo na makambo mabe nasi'nasali. Nazwi yo sikoyo kati na motema na ngai mpo na Yo kozala Mobikisi na ngai, mpe ngai nazala mwana na Nzambe. Ngai nandimi yo kopesa ngai nguya moi na moi mpo na kolanda Yo. Nasambeli na nkombo na Yo, Amena.


If you are interested in receiving additional Scripture booklets, write to the publisher in English at the address below or order online:

World Missionary Press, Inc. 
P.O. Box 120 
New Paris, Indiana 46553-0120 U.S.A.


World Missionary Press Home Page | Go to the Top of This Page

Hit Counter